• 24.04.2014, 14:15:16
  • /
  • OTS0247 OTW0247

Afro-Asiatisches Institut zum Gesellschaftsklimatag - Lingala

Für Vielfalt und positives Zusammenleben am 25. April!

Utl.: Für Vielfalt und positives Zusammenleben am 25. April! =

Wien (OTS) - Afro-Asiatisches Institut: Ndenge mosusu na ndenge
ezalaka o mokolo mua 25.04.2014: Lisanga bua BONDEKO ekokumisa bolamu
ya kobika na bokesani esika moko

Masolo ya mikuse, ntembe mpe masapo ya bosekisi o mokolo wa yambo ya
"MOKOLO BUA BONDEKO" kati n'Otrisch.

Kosepela wa yambo ya MOKOLO BUA BONDEKO ekozala na mokolo mua 25
04.2014. Milulu eye ekozala kosepelama mbala moko na mobu nionso, o
mokolo ya mitano ya suka ya sanza ya mine. Yango ekosalama bongo mpo
nakotombola bolamu ya kobjka na bokesani mpe na bomoko. MOKOLO BUA
BONDEKO ezui makunzi maye kati na ebele ya mangomba na mpe masanga,
biye bizali kotambola na nzela kokolisa bondeko.

Kobatela boyokani kati na mboka:

"Tokeli MOKOLO BUA BONDEKO mpo tolingi kotombola nzela ya kobika
lisanga kati na mboka na biso. Tolingi kobongola ndenge tobikaka
sik'oyo. Na yango tozali koluka kobongola mokili mpona kolakisa ete:
Ezali na yango pasi te mpona komema mbonguama ya kitoko na mboka" se
bongo nde bazalisi bya "MOKOLO BUA BONDEKO bazali kokanisa."

Mua liboma moke:

MOKOLO BUA BONDEKO esalami kati n'Otrisch mobimba. Bana ya kelasi,
basi mpe babali bakoteya balakisi na bango. Bato ya mangomba
bakotikela basusu esika na bango ya mosala; to mpe lisusu bateki buku
bakobalola elili ya mokili, motu ekoma na nse. Yango ekosalama na
ndenge wana mpona kolakisa ete bokesani ekoki kondimama soki totali
bomoyi na biso na miso mya sika.

Pusana pene! Tobeta lisolo ya moke ya bondeko:

Bokutani ya ndenge ya masese ekozala kati na balabala Mariahif
(Marahilfer Straße). Bato banso bazali kosala, lolenge bana banso ya
mboka basalaka. Mibale na mibale bavandi na bakiti bitalana. Bazali
kosolola likolo ya kobika na bango esika moko. Sima na yango batiki
bisaka biye mpe bapusani mpene na bakiti misusu mpe bakomi koyoka
basusu. Masolo ya bondeko ya ndenge eye bikozala mpe kati na baNganda
mpe na baengumba misusu.

Ministere ya bomoko kati na bokesani

Na mpokua mua MOKOLO BUA BONDEKO kokutana ya ntembe ekolobela
likambo ya nzela ya bosangani, ya boyegenbene, ya nguya mpe bokesani:
Etaleli ya politik ya bokesani mpe ya bokokanisi: Esengeli mpenza
kondima bozalisi ya Ministere ya basi, ya bokokanisi mpe ya
kondimama? Motindo nini nzela ya bolobi bolamu ekoki kobongisama?
Lisanga bua BONDEKO: MOKOLO BUA BONDEKO ezali likanisi ya Lisanga bua
BONDEKO, bosangani ya masanga mpe mangomba ya motindo na motindo
(Arbeiterkammer, Volkshilfe, Integrationshaus, Wiener
Volkshochschulen, SOS Mitmensch, Interkulturelles Zentrum,
asylkoordination na mpe Presseclub Concordia).

"Toyebi esika tolingi kokoma: kokolisa kobongisa bomoko o kati
y'Otrisch, mpo ete bosangani kati na bokesani etombuama mpe endimama.
Tika ete bokesani eye ezala na yango wuta kala, endimama lokolo moko
ya makunzi y'Otrisch. Se bongo nde bazalisi ya Mokolo bua Bondeko
basilisi."

Soki olingi koyeba mingi tala na: www.gesllschaftsklima.at

Für die Übersetzung Lingala verantwortlich: Afro-Asiatisches Institut

OTS-ORIGINALTEXT PRESSEAUSSENDUNG UNTER AUSSCHLIESSLICHER INHALTLICHER VERANTWORTUNG DES AUSSENDERS - WWW.OTS.AT | KOP

Bei Facebook teilen.
Bei X teilen.
Bei LinkedIn teilen.
Bei Xing teilen.
Bei Bluesky teilen

Stichworte

Channel